LYRICS DE LA CHANSON « TOSIMBANA, TOKENDE ELONGO »
Artiste : MABOY ZUMA Feat JMK-MUSIQUE
Style : RAP
Maître Avatar Jean-Pierre MANZOLO a proposaki na gouvernement ba créer agence moko ba'o banda ko étudier makambu nionso oyo eza mystique
Apesaki pe ba pistes de solution pona guerre esila na pays
Alobaki pe ndenge nini tokoki kosala po to évoluer na technologie
Gouvernement congolais, boyokaka ye, mais pourquoi bozo bet'e ba « vus »
Pourquoi congolais ondimaka mutu soki a kufi, ndima ye heure aza en vie
Tozo zela Nzambe aya, awuta likolo, aya abambana apesa solution to pe nini ?
Congolais ayebi te Nzambe atindaka mobikisi na chaque pays
Misu eza ya kokangama Nzambe, eko fungwama mukolo nini ?
Exemple ya pamba, ba minerais toza nango, tosalaka nango nini ?
Système ya mundele tozo appliquer na politique, ezo pesa solution nini ?
Pona Congo ezala développé, guerre esila na Est, solution ezali
Maître Avatar alobi solution ya Congo evandi naba culture nabiso
Alobi pasi oyo Congolais azo mona lelo, parce que to buakisa bokoko
Mundele aye akosa biso na christianisme, amema ki bomoto nabiso
Rwanda ekoki kosakana na biso te, connaissance nde ezangi biso
Gouvernement Congolais pardon, s'il te plaît botsha matoyi, boyoka message : combien de fois to changer ba députés, ba ministres, mais ti lelo rien ne marche
Mokonzi ya mboka Fatshi « Béton », s'il te plaît, pardon papa, Luka batu ya mayele ; mayele ya bic te po gouvernement etondi n'a ba licenciés, mais rien ne marche
Rwanda e ' sakana na pays ya munene boye Kaka po tozangi connaissance
Congolais, tika trahison, tosangana biso na biso, l'union fait la force
Tokufi mingi, ezo senga toluka solution, totsha conscience nabiso en place
Guerre ya Rwanda, biloko ya mikié, toyoka nanu proposition ya Maître Avatar
Maître Avatar alobi guerre ya Rwanda ezo senga ekota métaphysique
Bosthé trop confiance na minduki ya mindele, ba armes ancestrales pe ezali
Congolais ayebi te que spiritualité yango wana nde technologie
Nionso ebandaka d'abord na esprit avant eya kokoma physique
Ba ingénieurs nabiso batangi, bazo vider ba tchik, nini' ango basali ?
Musala ya kobongisa ba téléphones oyo ba bébés yaba Chinois basali
Mundela aya, akosa biso que ooh bokoko nabino wana eza kindoki
Bakata biso ba racines, tala nde lelo tokomi
Souffrance ya mbok'oyo eza po to buakisa tradition, culture na coutume
Tobenga ba koko nabiso ba ndoki, tala ba erreurs tosala na vie !
Nzambe ya ba paya tosambelaka, guerre yango wana na Est, nini' ango asali ?
Tant que toko zonga na ba pratiques ancestrales te, souffrance infinie
Информация по комментариям в разработке